Na sanza ya motoba
Ya mbula nkoto mibale na zomi na minei,
Bipayi bionso, bana ya Congo basangani
Pona kokanisa mobundi monene - Patrice Lumumba
Mpe baye babundaki elongo na ye
Po ete tozua lipanda
Uta tozua Lipanda,
Totangi lelo ba mbula ntuku motoba na minei
Kasi mabele ya ba tata
Etikali na bowumbu, solo penza;
Sima na ba mbula oyo nionso,
Mwana ya Congo akoki kokoma ata Lingala te, solo;
Ata ko likanisi ezalaki kokangola mabele na bokonzi ya mopaya,
Bisaleli ya bapaya ekonzi mboka kino lelo,
Emononeli ya ba koko ekomi kolimua
Mwana muasi ya Congo azali koyemba Lipanda
Kasi elateli na ye etalisi ete azali mowumbu ya mopaya kino lelo;
Amilatisi ba suki lokola masala ya soso
Pona kokokana na poso pembe,
Kotambolaka na nzela nzoto bolumbu
Pe kolandaka lolenge ya baye bakonzaka
Ata ko ba tata bapesaka bomoi pona kokabola biso na esaleli ya mopaya,
Bilenge mibali na Congo
Bazali ko landa mboka ya malili,
Mpasi ya mboka elobeli bango eloko te
Ba koko baboyaka lolenge ya mopaya
Emononeli na bango ezalaka kobunda mpona kobatela bizaleli ya ba tata na bango -
Mwana ya Congo asosoli te ete esengeli to sangana elongo pona kokoba mosala oyo ba koko batikaki na nzela;
Ata ko ba bundaki etumba makasi,
Mboka etikali na bowumbu
Po ete mwana ya Congo asosoli nanu te ete
Esengeli tobatela emononeli ya ba tata
Mpe tobunda pona mboka ekende liboso.
Wooooow! Ahahah, good job sister....that's good. Keep it up!
ReplyDeleteeehh,lingala pasiii nazokoka kotanga teeeeee. thanks Hosanna. anyway
ReplyDeleteFelicitations hosanna.lingala ya solo!nakoki yo te!!! Tu es trop forte!
ReplyDeleteCongratulation. Have you been in mbandaka(equateur) before?? Lol that's good cheer up
ReplyDeleteWow. It seems like you can write all the language or dialect perfectly. O lobi bobele solo. Koba kaka nako komelaka biso biloko ya kitoko. Yika pinko, ozo sala esengo na ngai.
ReplyDelete